Okombo ya Nzambe Ta Ngolu mpe Boboto
Kimya Ngracia ya Nzambe ezala ote ya Seydina (
Mokonzi) ya Biso Muhammad,
Libota naye mpe Bayekoli naye.
AL – FATWA International n° 8
Po na
nini na bimi o kati ya Lingomba ya Ahmadiyya ?
Ekomami na Dr Ismail A.B. Balogun. Ye azali moko ya
bakambi ya
Ahmadiyya ya munene
ya kala.
«...Nalingi nalobela bino boye, liboso ya Nzambe mpe
liboso ya Batu ete
natalaki mingi na bonzindo
penza mokano mpe kolakisa bilembo na bango;
nde naye kokondola ete
Lingomba ya Ahmadiyya ezali kokosa mokili
mpe ezali kosakana pamba te
mpo na bozangi boyebi ( boyinga) bua
balandi babango.»
Okati ya makomi maye mabimaki o mboka Nigeria na mubu 1974, Dr. Ismail
A.B. Balogun, moko ya bakambi ya Ahmadiyya ya munene, ayanganaki bondimi ya
Lingomba Ahmadiyya mpe abimisaki na polele liboso ya batu mpo nakoboya Lingomba
Ahmadiyya liye abotamaki mpe akolaki nakati. Ye azali molakisi ( Professeur) ya
mateya ya Islam ( Etudes islamiques) mpe littérature arabe o kati ya eteyelo ya
Ibadan ( Université d’Ibadan) o Mboka Nigeria.
Dr. Balogun atiyaki bomoyi naye mpo na misala ya Lingomba Ahmadiyya mpe
batombolaki ye mpo azala Mokambi momemi sango mpe ambassadeur.
Na mibu minso mina, balisikulu ( discours) naye yakobangisa mpe esalemi
na lolenge ya malamu pemza ekotelaki bilenge ebele ya Lingomba Ahmadiyya.
Na boye, kobima naye na polele, koningana mpe koswana oyo elandaki,
esali ete batu mingi ya ayele bayeba bosolo mpe babima batika Lingomba
Ahmadiyya.
Nzambe azali
kondima tubela ya baye basali mbeba na boyinga sima batubeli noki. Batu ya ndenge wana nde Nzambe akondima
tubela nabango. Nzambe azali ta boyebi
mpe buanya (sage). (
Coran Esantu, An- Nisa, 4 :17)
Sima nde Dr.
Balogun amonisaki tina ya kobima naye o Lingomba ya Ahmadiyya mpe asangisaki
debats contradictoires oyo elandanaki na kati ya mokanda muaye na kombo «Islam nzela moko te na
Ahmadiyya na Nigeria.»
(« Islam contre Ahmadiyya au Nigeria»).
Na kati ya mokanda mona, Dr. Balogun alakisaki lolenge
ye, na batu mususu na basusu mingi oyo batangi, bandimaki na bazangi boyebi
Lingomba ya Ahmadiyya, olibanda ya bolinga bua ba boti ba bango, pamba te
mateya mabe maye mapanzani, kolandana na lolenge la bokaboli batu na ezaleli ya
ba missionnaires ba Ahmadiyya ba Mboka Pakistan. Na makambo mususu ma mbango
moko maye matali penza losambo mazali nzela mko te na bosolo ya Lingomba
Ahmadiyya.
Dr. Balogun azali koloba o kati ya mokanda muaye ete
bondimi buaye lokola mo-lolanda
( aveugle) na bolandi ba missionnaires ba Ahmadiyya ba
Mboka Pakistan.
« Na bomwana na ngai, bamemaki ngai po ete na
bondela ba missionnaires ba Ahmadiyya ba Inde na Pakistan, bazalaki kokonza mpe
kotala makambo na biso manso matali Lingomba. »
Tango mission Ahmadiyya eyaki
epayi ya bakulutu ba biso, ewuti na bakulutu eyei epa na biso, tondima manso
maye bayebisi biso po na bo ndimi ya bokutu ( implicite), po na elikya
mo-lolanda
( aveugle) eye topesaki
mbango.
Mateya ma bango
ekotaki biso malamu, mpe to ndimaki makambo na bango na motema moko. Pamba te
bazalaki kokokanisa na mikanda mia Islam po na ko ndimisa, ko lendisa makanisi
na bango pe to ndimaki mateya na bango nakoyimayima te pamba te tozalaki na
elikya na bango.
Nzela na bango
ezalaki ete tokoka koboya ba Musulmans basolo solo, pamba te po na bango nde
bazuaki lolenge ya koloba kolandana na ndenge ba Musulmans bana bazali kozua
Islam na bango. Ba Missionnaires bana balingaki kolakisa biso « Islam ya
solo » okombo ya Lingomba Ahmadiyya.
Mbala mingi
bakotisaki o kati ya molimo na biso ete minioko ya makasi oyo ba Ahmadiyya
bampikilaki, pe bazuaki o kati ya Mboka Inde liboso ya bokabwani na bango, na
sima lisusu o Mboka Pakistan, ezalaki ndakisa ete Lingomba ya Ahmadiyya ezali
ya solo. Nzoka nde, Ntoma moko te andimamaka o mboka naye. Oyo elakisaki biso
na polele ete bosolo bozali, nde to landaki bango na elikya oyo ezali na lukuta
o kati na yango te. (« Islam
contre Ahmadiyya au Nigeria » p :85-86).
Eteni ya mine ya siecle eye eleka, Dr. Baogun amonaki
sekele ya mayele ya ba Missionnaires ya Ahmadiyya ya Mboka Pakistan maye
mazalaki olikolo penza po bazali kolakisa na polele te elongi mobimba ya
makanisi ( doctrines) ma bango pe lisitole ( histoire) liabango, nzoka nde
bazali kobongola mateya masolo ma Islam ; pe bazali komeka lolenge nyoso
mpo nako kabola mangomba
( sectes) o kati ya bazoba ba Musulmans.
Dr. Balogun akomaki :
« Ata soki Lingomba ya Ahmadiyya esili kosala mibuu
tuku mutoba ( 60 ans) na kati ya mboka oyo
( Nigeria),
Nazali kolobela bino ete ti lelo batu bayike o kati ya Mission, tii na mokolo
mua lelo bazali o kati ya molili mpo ya makambo ya mikemike ya likanisi (
doctrine) na ntina nango. Ndakisa, ezali kala mingi te tangu ba nguna (
opposition) ba Lingomba Ahmadiyya
babandaki kobimisa mutu na Mboka ena ( Nigeria), ete bakambi basusu ba
Ahmadiyya mbala ya yambo baye koyeba ete Ghulam Ahmad azali komizualokola Ntoma
».(« Islam contre Ahmadiyya au Nigeria». p.3).
[ Lokola ba Ahmadiyya bazalaki kobomba makanisi
mabango masolo ( vraie doctrine) o balandi mingi ba bango], Emonani na polele
ete tangu moko ya bilenge ya islam oyo atanga o Mboka Nigeria, oyo akota na
Lingomba la Ahmadiyya awa, akendaki o Mboka ya Bangeleza po nakotanga sika,
kuna nde akutani na ba Ahmadiyya ba Mboka Inde baye bakovandaka o Mboka ya
Bangaleza, asali mateya
( études) maye o maboko ya yambo ya ba
Ahmadiyya ; sima azongi Mboka mpo ete alongola bolandi buaye o Lingomba
Ahmadiyya. Ndakisa Nkondo ( feu) Al-Hadj L.B. Ahusto Nzambe apemisa molimo
muaye. » ( Ibid.p.2).
Naboye, Na ebandeli na bango, Bakambi ya Lingomba
Ahmadiyya balukaki bazela oyo endimama na ba Missionnaires ba ba Kristu po na
ko bongola ba Musumans bazoba po ete ba matisa motango mua balandi babango.
Baye na malamu penza ete mabota ma batu baye bameseni
kokosama na nzela moko to mususu po balanda Ligomba na bango bazali bake baye
bakowangana bolandi bua bango, ata soki baye koyeba simabosolo.
Ya solo bakutaki Ba Tata
na bango asila kobunga, bango pe bamemanaki kolanda makolo ma bango (
baboyaki kolanda maloba ma prophète Mohammad), tembe ezali te, batu baike bakala bazalaki
banguna liboso na bango. ( Cor’an Esantu,
As-Saaffat, 37 : 69-71)
Dr. Balogun alakisaki ete, na mubuu 1974, Bulamatari
ya Pakistan na Ligue Mondiale bamonisaki ete Lingomba ya Ahmadiyya lilingaki
Islam te, Dr. Balogun amitiya kati o botomboli ya Lingomba liye abotama na kati
mpe alingi alakisa bosolo bua Lingomba Ahmadiyya.
Na boye, kolanda na boluki buaye ya mozindo penza oyo
ekoka ya mayele o kati ya mateya ya bokambi lingomba ya Ahmadiyya esali ete
akoka komona ma kambo ya mabe ya lukuta pe etiki ye apona nzea mususu te kaka
koloba mabe ya Lingomba ya Ahmadiyya oyo amonaki.
Mokano moye azuaki mozalaki na litomba linene, pamba
te Dr. Balogun ye mei azalaki mokambi ya Ahmadiyya ya likolo mpe moyebi ya
mateya ya Islam, amitikaki ye mei o kati ya bozoba mibuu koleka tuku mine po na
likambo litali bosolo bua Lingomba Ahmadiyya.
Kolanda na bilembetele ( références)bia bango bie
bipesami na ba Missionnaires Ahmadiyya, uta na kati ya Qur’an Esantu, na kati
ya hadiths pe o kati ya makomi ya Bakambi ya likolo ya ba musulmans po na
nkotisa ( confirmer) makanisi na bango, Dr. Balogun akomi :
« Mokano na ngai (po na kosangisa bilembetele bie
bilobamaki na ba Ahmadiyya) ezalaki solo po nakomilendisa ngai moko po na
koboya bonguna boso o Lingomba Ahmadiyya.
Lokola moyebi munene o molongo mobimba,
nazalaki na elikya ete bosakoli ( déclarations) bua ngai likolo ya Lingomba
Ahmadiyya ekoki ko lendisama ( appuyé) na bilembetele bia biso bie bizuami o
kati ya Islam.
O kati ya bosangisi bua ngai bua bilembetele
bia ba Missionnaires ya Lingomba Ahmadiyya, maloba na ngai ya suka (
conclusion) ezalaki ya kosepelisa te.
Nakoki koloba omiso ya Nzambe na Batu , mingi
na zali kotala omozindo makanisi na bango pe tozali kolakisa ba bilembetele bia
bango, nde nazali kokundula ete Lingomba la Ahmadiyya lizali kokosa mokili pe
lizali kosakana na bozoba bua baike ba balandi ba bango.
O kati ya makambo ebele, bazali kotanga bakomi
( Batu ba buanya) baye bazali banguna ba polele likolo ya makanisi ya Lingomba
la Ahmadiyya, kasi, lisusu bazali kotanga na mayele ete bamonisa mbala mingi
ete bakomi bazali kondima makanisi ya Lingomba la Ahmadiyya…
Ezali kaka kokende o bilembetele bia libandeli
( sources), na kotanga oyo ba Ahmadiyya bamonaki o kati ya makomi maye bango
baboyaki ete motangi na moluki ( chercheur) na sima ya solo kokomela bango, nde
baye koyeba epai wapi ba Missionnaires ba Ahmadiyya ba Mboka Pakistan bazali
komeka kokosa mokili » ( Sunday Sketch, Nigeria, Sept 29, 1974 ;
Ibid, p.86-87).
Boluki bua bonzindo bua Dr. Balongun o kati ya
ba mikanda ya kala ( originaux) pe ya solo ya ba Musulmans elakisaki na polele
ete ba bandisi ( fondateurs) na bakambi batiaki molende na nko po ete bazongela
lukuta na bango po na ko bungisa ba zoba.
O kati mua mokanda muaye, Dr. Balogun abimisi
maloba ma suka maye :
« Ezali polele kolandana na maloba ete
Mission ezuaki te kaka makanisi ma bango ma mabe (ya lukuta) maye mauti ma maloba mantina te maye mazuami o kati
ya lisanga, maye mazali na bokabuani penza na bolingi bua bango pona na tina
ete ekoka komonisa ete mukomi azali bongo kolanda makanisi ma bango.
O Kati ya batu batanga, likambo ya boye nde
ezali kosala bokabwani bonene penza bua likanisi la mokonzi. Pamba te ezali
kowangana mobeko mua molongo ( Loi International) ya droit ya mokomi. Ekoki kondimama te pe
ekozala malamu te na Mission eye elingi ezuama na kilo.
Po na mobeko ya
Islam likambo la boye ezali mabe mingi.
Po na boye Cor’an Esantu elobi
(Coran: 2:59 , 7: 162):
« Kasi batomboki baye ba
bongoli maloba maye bayebisa bango te. Boye nde tokitisi etumbu munene likolo
ya batomboki, natina ete bazangaki botosi . » Ezali bilia ya kokanisa
pona ba Ahmadiyya. (Sunday Sketch, Nigeria, Sept, 29, 1974, Ibid, p. 91 – 95).
Baye
bazali kobuka lukuta, bazali baye bazali kondima te maloba ma Nzambe, bango
nde solo babuki lukuta. ( Cor’an Esantu : 16 :105)
Nasima ya kobima
naye o Lingomba na polele penza, Dr. Balogun babandi kolandelaye na baike ya
bakambi ya ba Missionnaires ya Ahmadiyya. Ndakisa, Molvi Ajmal Shahid, ye
azalaki o tango ena mokambi ya Lingomba Ahmadiyya o Mboka Nigeria, ye apesaki
eyano mokuse penza na kolakisa pasi naye na komona ete: « Ndeko naye asili kowa liwa ya molimo.» (
Ibid p 97), pe Moulvi Nasein Saili, azali Mokambi ya ba Missionnaires ya
Lingomba Ahmadiyya o kati ya Afrique ya eloli ( ouest), ye andimaki ete
Dr.Balogun abimaki o Lingomba Ahmadiyya po ete akota na Islam. ( Ibid. P. 99).
Na boye, nde ba
Missionnaires basusu ba Lingomba Ahmadiyya ba mutunaki ye tina nini ye abimi
o kati ya Lingomba
Ahmadiyya na polele.
Po na polele, Dr.
Balogun, ye avandi mibuu ebele amesanaki na mayele yakotambuisa Lingomba ya
Ahmadiyya, ayandalaki ( discréditer) baye baboyaki Lingomba la Ahmadiyya,
ayanolaki :
« Nalingaki na
bimisa makambo nyoso o kati ya komi oyo : ( Ndakisa : Ezaleli ya
Lingomba la Ahmadiyya ya batu ya Pakistan). Na kati na kobelela te. Kasi
koyeba na ngai elakisaki ngai ete kopona ya Mondimi ya Ahmadiyya makambo mususu
ekozala ete afingama to aboyama na eleko ekoya, to kolongolama na libela kaka
wana. Na boye, ata mutu moko te o kati
ya Lingomba oyo basala ye ete akokakoyoka ye....Ngai nasololaki ( nalobaki)
makanisi na ngai, Nzambe azali Nzeneneke ( Témoin) na ngai, po na koyeba bonene
ya likambo lina liboso ya baninga ba ngai ba Musulmans ba Mboka Nigeria kaka,
mpe ba Mboka ya ba Musulmans nyoso. Mokano na ngai ezali po na koboya lingomba
ya Ahmadiyya te, ngai na vandaki o kati ya Lingomba mikolo mingi po ete nazua
kimya o kati ya motema mua ngai. Kasi, mbala inso soki bokabwani bua makanisi
bobimi katikati ya Islam na Ahmadiyya, ezali po na ngai naloba po na Islam na
likukuma te.» ( Sunday Times, Nigeria, Jan.20, 1974; Ibid, p 17).
Tozali kolikya ete
batu baye balandaki Lingomba la Ahmadiyya po na libunga, bazongela esika na
bango o kati ya mwinda oyo ebimi na kongenga nyoso uta epai ya Dr. Balogun.
Baye banso bakotelamaki na likamwisi ya
Cor’an Esantu na mateya na Ntoma wa suka Mohammad ( SAW), balakisa bosembo bua
bango epai ya Allah na Ntoma naye ya suka
(SAW) to boye banso bazuakite posa na bango pe lukuta oyo babanda
kolakisa bango?
Ya solo baye bawangana
Nzambe mpe bapekisi batu nzela la nzambe pe basali tembe na Ntoma Mohammad
(SAW) na sima ya komona bosolo, bango bakosala
Nzambe elako te, pe
akokweisa makambo na bango. (
Coran Esantu, Muhammad, 47: 32)
Makambo oyo
mabimisami o kati ya: « Islam nzela moko te na Ahmadiyya na Nigeria . »
( L’Islam contre Ahmadiyya au Nigeria), ekomami na Sh.
Muhammad Ashraf, Kashmiri Bazar, Lahore, Pakistan.
Curtoisie : Idara Dawat- o – Irshad, USA, Boite
Postale 22885, Alexandrie, VA 22304, USA.
Site Internet: